Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 1:27 - Mokanda na Bomoi

27 Bongo boyimaki-yimaki kati na bandako na bino mpe bolobaki : « Yawe alingaka biso te, yango wana abimisaki biso na Ejipito mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Amori mpo ete bango baboma biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 1:27
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bayimaki-yimaki kati na bandako na bango ya kapo, batosaki mongongo ya Yawe te.


Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !


Moyize alobaki lisusu : — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.


Boni, Yawe amemi biso na mokili oyo kaka mpo ete tokufa na mopanga ? Boye basi mpe bana na biso bakokoma kaka bomengo ya bitumba. Ekozala malamu te mpo na biso ete tozonga na biso na Ejipito ? »


Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki : « Mpo na nini boye ! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe ? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba ! »


Bongo mosali oyo azwaki talanta moko ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nayebaki ete ozali moto ya matata, obukaka bambuma na elanga oyo olonaki te mpe olokotaka bambuma na esika oyo obwakaki ata nkona moko te.


Nazalaki kobanga yo, pamba te ozalaka moto ya matata : ozwaka biloko oyo obombaki te mpe obukaka bambuma ya nkona oyo olonaki te. »


noki te bato ya mokili oyo longwa kuna obimisaki biso, bakoloba : ‹ Ezali mpo ete Yawe azalaki na makoki te ya kokotisa bango na mokili oyo alakaki bango to ezali mpo ete azalaki koyina bango, yango wana abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na koboma bango na esobe. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ