Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.
Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango ; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. »
Bakamataki na maboko na bango ndambo ya bambuma ya mokili wana mpe bamemelaki biso yango. Tala sango oyo bapesaki biso : « Mboka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso ezali malamu. »
Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo : « Bokende ! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino ; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te.