Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 1:21 - Mokanda na Bomoi

21 Botala, Yawe, Nzambe na bino, apesi bino mokili ; bokende mpe bokamata yango ndenge Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alobaki na bino. Bobanga te mpe bozala na mpiko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 1:21
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo ; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango.


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.


Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »


Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.


Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki : — Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango !


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


Nalobaki na bino : — Bosili kokoma na etuka ya bangomba ya bato ya Amori, etuka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.


Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino.


maloba oyo : « Oh Isalaele, boyoka, awa bobongami lelo mpo na kokende na bitumba mpo na kobundisa banguna na bino ; boyika mpiko ! Bobanga te ! Bolenga te ! Bozala na somo te liboso ya banguna na bino.


Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »


Te ! Kobanga yango soki moke te ! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.


Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo.


Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo : « Bokende ! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino ; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te.


Boye tokoki koloba na elikya nyonso : « Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ? »


Zala makasi mpe yika mpiko, pamba te yo nde okokamba bato oyo mpe okopesa bango mokili oyo nalakaki kopesa lokola libula epai ya batata na bango na nzela ya ndayi.


Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ