Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 1:15 - Mokanda na Bomoi

15 Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 1:15
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.


Yawe alobaki na Moyize : — Mata epai na Yawe, yo elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele ; bokogumbama na mosika.


Kati na libota moko na moko, ekozala na mobali moko mpo na kosunga bino : asengeli kozala mokambi ya etuka na ye.


Moyize atombokelaki bakonzi oyo baponamaki mpo na kotambolisa mampinga, bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda, oyo bawutaki na bitumba.


Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi,


Bozongiselaki ngai : — Makambo oyo osili koyebisa biso ezali malamu.


Na tango wana, napesaki bakambi na bino mokumba oyo : « Boyoka kowelana oyo ezali kati na bandeko na bino mpe bokata makambo na bosembo ; ezala kowelana kati ya bana ya Isalaele bango na bango to kati ya mwana ya Isalaele mpe mopaya.


Okopona basambisi mpe bakalaka kati na bikolo na yo nyonso, kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. Bakokata makambo ya bato na bosembo.


Mema lisusu ba-fromaje zomi oyo epai ya mokonzi ya limpinga ya basoda nkoto moko, limpinga oyo bango bazali. Tala soki bandeko na yo ya mibali bazali ndenge nini mpe zwa na maboko na bango elembo oyo ekolakisa ngai ete bazali malamu.


Saulo ayebisaki bango : « Bino bato ya Benjame boyoka, bokanisi ete mwana ya Izayi akopesa bino nyonso bilanga mpe bilanga ya vino ? Bokanisi ete akokomisa bino bakonzi ya bankoto to bakonzi ya bankama ya basoda ?


Akotia bamoko, bakonzi ya bankoto ya basoda ; bamosusu, bakonzi ya basoda tuku mitano ; bamosusu, akotia bango na mosala ya kobalola mabele ya bilanga na ye, kobuka bambuma na ye mpe kosalela ye bibundeli ya bitumba mpe bisalelo mpo na bashar na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ