13 Bopona bato ya bwanya, ya mayele mpe ya lokumu kati na moko na moko ya mabota na bino, mpe ngai nakotia bango bakambi na bino.
Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito.
Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.
Nakokoka ndenge nini komema ngai moko makambo na bino, mikumba na bino, mpe kowelana na bino ?
Bozongiselaki ngai : — Makambo oyo osili koyebisa biso ezali malamu.