Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu : — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola.
Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo ! mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo, apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo ; na mapamboli ya bozindo, na se ; na mapamboli ya mabele mpe ya libumu.
Kasi Joabi azongiselaki mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ?
Kasi Joabi azongisaki : — Tika ete Yawe akomisa bato na Ye ebele koleka mbala nkama ! Oh mokonzi, nkolo na ngai, bango nyonso bazali te basali ya nkolo na ngai ? Mpo na nini nkolo na ngai alingi kosala bongo ? Mpo na nini komemisa Isalaele ngambo ?
Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. »
Nakolisaki yo lokola nzete ya elanga. Bongo tango okolaki penza mpe oyaki monene, okomaki kitoko makasi koleka ; tolo na yo ebimisaki mabele, mpe bapwale na yo ekolaki. Kasi ozalaki na yo kaka bolumbu tango nyonso, ozalaki na bilamba te.
Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › »