Daniele 9:9 - Mokanda na Bomoi9 Kasi Yo Nkolo, Nzambe na biso, otonda na mawa mpe olimbisaka, atako biso, totombokelaki Yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.
Asambelaki Yawe : — Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.