Daniele 9:8 - Mokanda na Bomoi8 Yawe, biso, bakonzi na biso, bakambi na biso mpe bakoko na biso, tolatisami na soni mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo.