Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 9:5 - Mokanda na Bomoi

5 solo, tosalaki masumu mpe mabe na miso na Yo, totambolaki lokola bato mabe mpe batomboki, topesaki mibeko mpe mitindo na Yo mokongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 9:5
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele batosaki te Yawe, Nzambe na bango, mpe babukaki boyokani na Ye ; elingi koloba ete batosaki te makambo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, atindaki bango.


pamba te basalaki mabe na miso na Ngai mpe bapelisaki kanda na Ngai, wuta na mokolo oyo batata na bango babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo. › »


Nalobaki : « Oh Nzambe na ngai ! Nazali kati na mobulu mpe nazali koyoka soni makasi mpo na kotombola elongi na ngai epai na Yo, Nzambe na ngai ; pamba te masumu mpe mabe na biso ekomi ebele penza mpe emati kino na Likolo !


Solo, tosalaki masumu lokola batata na biso, tosalaki mabe mpe tomemaki ngambo.


Nakangamaka na mibeko na Yo, pamba te Yo moko nde oteyaka ngai yango.


Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi ; luka ngai, mosali na Yo, pamba te nabosani mibeko na Yo te. »


Yawe asaleli ngai makambo wana kolanda bosembo na ngai, afuti ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai ;


Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.


kotomboka mpe kowangana Yawe, kopesa Nzambe na biso mokongo, kosala mabongisi ya konyokola bato mpe kotombokisa bato, kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta.


Osungaka bato oyo bazalaka na esengo ya kosala makambo ya sembo, ba-oyo babosanaka nzela na Yo te. Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu ; bongo ndenge nini tokoki solo kobika ?


Oh Yawe, tososoli solo mabe na biso mpe masumu ya batata na biso ! Solo, tosali penza masumu liboso na Yo.


Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.


Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »


Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.


likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino.


Yawe azali sembo ; nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye. Boyoka, bino bikolo nyonso, mpe botala pasi na ngai ! Bana na ngai ya basi mpe ya mibali bakei na bowumbu.


Oh Yawe, tala ndenge nazali na pasi : libumu na ngai ezali kotungisama, mpe motema na ngai ezali kosala pasi, pamba te nazalaki motomboki penza. Na libanda, mopanga ezali koboma bana na ngai ; mpe na kati, ezali kaka kufa.


« Tosalaki masumu mpe totombokelaki Yo, yango wana olimbisaki te.


Kasi likolo ya mitema mabe ya bato na yango, batombokelaki mibeko na Ngai mpe balandaki bikateli na Ngai te ; basalaki mabe koleka bikolo mpe bamboka ya zingazinga, pamba te batiolaki mibeko na Ngai, batambolaki te kolanda mitindo na Ngai.


Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.


Bato nyonso ya Isalaele babukaki Mobeko na Yo, bapesaki yango mokongo mpe baboyaki kotosa Yo. Mpo na yango, bilakeli mabe mpe bitumbu oyo ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mosali na Nzambe, esopanelaki biso, mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.


Sik’oyo, Nkolo, Nzambe na biso, Yo oyo obimisa bato na Yo na Ejipito na nzela ya loboko na Yo ya nguya mpe Kombo na Yo ekenda sango kino na mokolo ya lelo, tosalaki masumu, tosalaki mabe !


Kasi Yo Nkolo, Nzambe na biso, otonda na mawa mpe olimbisaka, atako biso, totombokelaki Yo.


Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye : — Kende, linga mwasi oyo asalaka kindumba mpe bota na ye bana makangu, pamba te mokili emikotisi na kindumba mpe epesi Yawe mokongo.


Wuta na tango ya bakoko na bino, bozalaki kaka kobuka mibeko na Ngai mpe bozalaki kotosa Ngai te. Bozonga epai na Ngai, mpe Ngai nakozonga epai na bino, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Kasi bozali komituna : ‹ Tokozonga ndenge nini ? ›


Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ