Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 9:26 - Mokanda na Bomoi

26 Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 9:26
39 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazongiselaki mokonzi : — Lokola tata wana alingaki kosilisa koboma biso mpe asalaki mabongisi ya kobebisa biso mpo ete tolimwa kati na mokili mobimba ya Isalaele,


Nakomi lokola mayi oyo ezali kosopana, mpe mikuwa na ngai nyonso ekabwani ; motema na ngai ekomi lokola mafuta oyo ezali konyangwama kati na ngai.


Tala, Nkolo azali na elombe moko ya nguya mpe ya makasi, elombe yango azali lokola mvula ya mabanga mpe mopepe oyo ebebisaka ; azali lokola mvula ya makasi mpe mpela ya somo, akokweyisa na makasi engumba yango na mabele.


Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.


Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye ? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.


Yawe akotindela bango mayi ya nguya mpe mayi ebele lokola mayi ya ebale Efrate : ekozala nde mokonzi ya Asiri elongo na mampinga na ye nyonso. Ekotonda penza meke mpe ekozipa bangambo nyonso.


Nani oyo azali koya lokola ebale Nili, lokola mayi ya bibale oyo etomboki ?


Ebale monene ekozindisa Babiloni, makelele ya bambonge na yango ekozipa mokili ya Babiloni.


Bana ya mokonzi ya nor bokobongama mpo na bitumba mpe bakosangisa mampinga ya basoda ebele, bongo bakomema lokola mpela biloko nyonso oyo bakomona na nzela ; bakobunda bitumba makasi kino na ndako batonga makasi ya mokonzi ya sude.


Akozwa mokano ya koya elongo na mampinga ya mokili na ye mobimba mpe akosala boyokani elongo na mokonzi ya sude. Mokonzi ya nor akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpo ete akoka kobebisa mokili na ye, kasi mabongisi na ye ekolonga te mpe akozwa mokili yango te.


Mampinga ya banguna bakokweya liboso na ye, mampinga yango mpe mokonzi ya boyokani bakobebisama.


Mokonzi akosala makambo oyo alingi, akokoma lolendo, akotombola mapeka liboso ya banzambe nyonso mpe akoloba makambo ezanga tina mpo na kotiola Nzambe ya banzambe ; akolonga kino tango kanda makasi ya Nzambe ekosila, pamba te makambo nyonso oyo ekatama esengeli kokokisama.


Na poso moko, akosala boyokani moko elenda elongo na bato ebele ; kasi na kati-kati ya poso yango, akosukisa bambeka mpe makabo. Likolo ya kobomba makambo ya nkele, mobebisi moko akobima kino tango libebi oyo ekatama mpo na mobebisi ekokokisama. »


Yawe alobaki : — Pesa ye kombo Lo-Ami, pamba te bozali bato na Ngai te, mpe Ngai nazali Nzambe na bino te.


Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi ; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.


Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele, mabele eninganaka, mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga, mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.


Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.


— Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali.


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama.


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bomoni nyonso oyo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.


Yesu alobaki na ye : — Ozali komona bandako minene oyo ! Libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu, nyonso ekobukama.


Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.


Yesu azongiselaki bango : — Solo, Eliya asengeli koya moto ya liboso mpo na kozongisa makambo nyonso na molongo. Bongo mpo na nini ekomama lisusu ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi, mpe basengeli koboya Ye ?


Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.


— Mikolo ekoya oyo, kati na nyonso oyo bozali komona awa, ata libanga moko te ekotikala na likolo ya libanga mosusu ; nyonso ekobukama.


Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ?


Alobaki na bango : — Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ;


Kobanda sik’oyo, nakoloba na bino lisusu mingi te, pamba te mokonzi ya mokili oyo azali koya. Ezali te mpo ete azali na nguya moko te likolo na Ngai,


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »


Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.


Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.


Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ