Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 9:22 - Mokanda na Bomoi

22 Apesaki ngai malako, alobaki : « Daniele, nayei sik’oyo mpo na kopesa yo bososoli mpe mayele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 9:22
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo moto yango alobaki na ngai : — Daniele, molingami ya Nzambe, yoka malamu maloba oyo nazali koyebisa yo mpe telema na esika oyo ozali, pamba te natindami sik’oyo epai na yo. Wana azalaki nanu koloba na ngai, natelemaki na kolenga.


Akobaki koloba na ngai : — Daniele, kobanga te ! Wuta mokolo ya liboso oyo ozwaki makanisi ya koluka kososola mpe komikitisa liboso ya Nzambe na yo, libondeli na yo eyokamaki, mpe nayaki lokola eyano na libondeli yango.


Sik’oyo, nayei kolimbolela yo makambo oyo ekokomela bato na yo na mikolo ekoya, pamba te emoniseli oyo ezali kolobela lisusu makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.


kasi liboso na nyonso, nakoyebisa yo makambo oyo ekomami kati na buku ya solo. Moto moko te asungaka ngai liboso na bango ; kaka Misheli, mokambi na bino.


Napusanaki pene ya moko kati na ba-oyo batelemaki wana, natunaki ye ndimbola ya solo ya makambo oyo namonaki. Ayanolaki ngai mpe apesaki ngai ndimbola ya makambo wana nyonso :


Nayokaki mongongo moko lokola ya moto wuta na kati-kati ya moluka Ulayi ; ezalaki kobelela : — Gabrieli, limbolela moto oyo emoniseli.


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki : — Tatola maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Yelusalemi mpe Siona.


Natunaki : — Nkolo na ngai, bampunda oyo elingi kolakisa nini ? Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki : — Nakolakisa yo tina na yango.


Sima na makambo oyo, namonaki ekuke moko efungwama kati na Lola. Bongo mongongo oyo nayokaki koloba na ngai lokola kelelo na mbala ya liboso elobaki na ngai lisusu : « Mata awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo esengeli koya sima na oyo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ