Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 9:19 - Mokanda na Bomoi

19 Nkolo, yoka ! Nkolo, limbisa ! Nkolo, yoka na bokebi ! Sala, kowumela te, mpo na lokumu ya Kombo na Yo moko, Nzambe na ngai ! Pamba te ngai, nazali kobelela Kombo na Yo mpo na bolamu ya engumba mpe ya bato na Yo ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 9:19
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okoyoka mabondeli oyo mowumbu na Yo mpe bato na Yo, Isalaele, bakotombola epai na Yo na kotala na ngambo ya esika oyo ! Tika ete oyoka biso wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka mpe limbisa !


yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango mpe limbisa bato na Yo na masumu oyo basalaki liboso na Yo.


moto nyonso oyo abengami na Kombo na Ngai, oyo nakelaki mpo na nkembo na Ngai, oyo nasalaki mpe nabongisaki. »


Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.


Mpo na nini ozali kosala makambo lokola moto oyo asutuki to lokola elombe oyo azangi makoki ya kobikisa moto ? Nzokande, Yo, Yawe, ozali kati na biso mpe tobengami solo na Kombo na Yo ! Kosundola biso te !


Pamba te, botala ! Ezali na engumba epai wapi babelelaka Kombo na Ngai nde nabandi kotinda pasi ; boni, bokanisi ete bino bokozwa etumbu te ? Bokozanga te kozwa etumbu, pamba te nazali koyeisa mopanga kati na bavandi nyonso ya mokili, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›


Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.


Kasi nazongisaki loboko na Ngai sima, mpe mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.


Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito.


Mpo na yango, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh libota ya Isalaele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala makambo oyo nyonso, kasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai, oyo bobebisaki kati na bikolo epai wapi bokendeki.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozongisa sik’oyo bato ya Jakobi oyo bakangamaki na bowumbu, nakoyokela libota mobimba ya Isalaele mawa mpe nakozala na zuwa makasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai.


Nzambe na ngai, defisa ngai litoyi na Yo mpe yoka ngai na bokebi ! Fungola miso na Yo mpe mona kobebisama ya bisika na biso mpe ya engumba oyo mpo na bolamu na yango. Ngai, nazali kobelela Kombo na Yo ! Ezali te mpo tozali sembo, kasi ezali nde mpo na mawa monene na Yo nde tozali kobondela Yo !


Tango mabanki yango esilisaki kolia matiti nyonso ya mokili, nagangaki : — Oh Nkolo Yawe, limbisa bato na Yo ! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika ?


Nabondeli Yo, kolanda bolingo monene na Yo, limbisa masumu ya bato oyo ndenge kaka olimbisaki bango wuta babimaki na Ejipito kino sik’oyo.


Ezali ndenge wana nde bakobanda kobelela Kombo na Ngai mpo na bolamu ya bana ya Isalaele, mpe Ngai nakopambola bango. »


Nazali koloba na bino penza ya solo : ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.


mpo ete bato oyo bakotikala baluka Nkolo, ezala bato nyonso ya bikolo ya bapaya oyo babengamaka na Kombo na Ngai, elobi Nkolo oyo asalaka makambo oyo,


mpo ete tosanzola nkembo na Ye, biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.


mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.


na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ