Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 9:17 - Mokanda na Bomoi

17 Sik’oyo, Nzambe na biso, yoka losambo mpe mabondeli na ngai, mosali na Yo ! Mpo na lokumu na Yo, Nkolo, tala na miso ya ngolu Esika na Yo ya bule oyo ebebi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 9:17
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, Nzambe na ngai, yoka na bokebi losambo mpe libondeli na ngai, mowumbu na Yo ! Yoka koganga mpe libondeli oyo mowumbu na Yo azali kotombola epai na Yo na mokolo ya lelo.


tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo.


Tika ete elongi na Yo engengela ngai, mosali na Yo ; lakisa ngai mibeko na Yo !


Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo.


Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye ;


Tika ete matambe na Yo ekoma kino na bisika oyo ebebi nye ! Kati na Esika na Yo ya bule, monguna abebisi nyonso ;


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.


Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te ; zongisela biso lisusu bomoi, mpe tokobelela Kombo na Yo.


liboso ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Manase. Monisa nguya na Yo mpe yaka kobikisa biso !


Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.


okomisaki biso eloko ya kotiola mpo na bazalani na biso, mpe banguna na biso bakomi kotiola biso.


Nasali yango kaka mpo na lokumu na Ngai, mpo na lokumu na Ngai moko. Ndenge nini nakoki solo komisambwisa Ngai moko ? Nakokaba nkembo na Ngai na nzambe mosusu te.


Oyokaki ngai libondeli na ngai : « Kokanga matoyi na Yo te wana nazali kobelela Yo mpo ete oyoka kolela na ngai mpe nazwa lisungi kowuta na Yo ! »


ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami, mpe mbwa ya zamba ekomi kovanda kuna.


Nkolo, yoka ! Nkolo, limbisa ! Nkolo, yoka na bokebi ! Sala, kowumela te, mpo na lokumu ya Kombo na Yo moko, Nzambe na ngai ! Pamba te ngai, nazali kobelela Kombo na Yo mpo na bolamu ya engumba mpe ya bato na Yo ! »


Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.


Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto ; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ