14 Yango wana, Yawe, olandeli pasi yango kino okweyiseli biso yango ; pamba te Yawe, Nzambe na biso, ozali sembo kati na misala na Yo nyonso ; kasi biso, totosaki Yo te.
Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, ozali penza sembo ! Na ngolu na Yo, na mokolo ya lelo, tozali batikali kati na bato na biso mpe tozali awa liboso na Yo, elongo na masumu na biso ; nzokande moko te kati na biso akoki kotelema bongo liboso na Yo ! »
Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?
Pamba te nazali kolandela bango malamu mpo ete bamona pasi kasi bolamu te. Bato nyonso ya Yuda kati na Ejipito bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi kino tango bango nyonso bakosila kobebisama.
Banguna na ye bakomi bakonzi na ye, bayini na ye bazali na esengo ; pamba te Yawe atindeli Siona pasi likolo ya ebele ya masumu na ye. Bana na ye ya mibali bakei na bowumbu, bakangi bango mpe bazali kotambola liboso ya monguna na ye.
Lokola obosanaki mikolo ya bolenge na yo mpe opelisaki kanda na Ngai na nzela ya makambo nyonso ya boye, Ngai mpe nakofuta yo kolanda ndenge etamboli na yo ezali, elobi Nkolo Yawe ; boye, okobakisa lisusu makambo mabe te na likolo ya makambo na yo ya mbindo.
Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.
Nkolo, ozali sembo ; kasi biso, lelo, tolatisami na soni : bato ya Yuda, bavandi ya Yelusalemi mpe bana nyonso ya Isalaele, ezala ba-oyo bazali pembeni to ba-oyo bazali mosika, kati na mikili nyonso epai wapi opanzaki biso mpo ete tozangaki boyengebene liboso na Yo !