9 Bongo, wuta na moko kati na maseke nyonso minei, liseke moko ya moke ebimaki. Ekolaki makasi, mpe nguya na yango ekomaki na ngambo ya sude, ya este mpe na ngambo ya Mokili oyo eleki kitoko.
Namilobelaki : ‹ Esengo nini penza nazalaki na yango ya kokamata bino lokola bana mpe kopesa bino mikili ya kitoko, libula oyo eleki kitoko kati na bikolo ! › Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata › mpe bokotika te kolanda Ngai.
Kati na esobe, nalapaki lisusu ndayi, na kotombola loboko, ete nakokotisa bango lisusu te na mokili oyo nabongiselaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko ;
Mokonzi ya nor akosala makambo nyonso oyo alingi mpe moto moko te akokoka kotelema liboso na ye. Akovanda na mokili oyo eleki kitoko mpe akobebisa yango.
Moto moko azanga ata tina mpe batikala kopesa ata lokumu ya bokonzi te akokitana na ye ; akoya na tango ya kimia mpe akozwa bokonzi na nzela ya mayele mabe.
Wana nazali kotala malamu maseke, namonaki liseke mosusu ya moke kobima kati na maseke wana ; bongo maseke misato kati na maseke ya liboso elongwaki liboso ya liseke ya moke oyo ezalaki na miso lokola ya moto mpe monoko oyo ezalaki koloba na lolendo.
Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »