Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 8:8 - Mokanda na Bomoi

8 Ntaba ya mobali ekolaki makasi ; kasi tango ekomaki lisusu na nguya makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki. Maseke minei ya minene ebotaki na esika ya liseke wana moko mpe etalaki na bangambo minei ya likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 8:8
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tango Oziasi akomaki na nguya, atondaki na lolendo oyo ememaki ye na kokweya. Atambolaki lisusu na bosembo te liboso ya Yawe, Nzambe na ye, kino kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kotumba mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo ya malasi.


Maridoshe akomaki moto monene kati na ndako ya mokonzi : lokumu na ye epanzanaki kati na bituka nyonso, pamba te nguya na ye ezalaki komata se komata, mokolo na mokolo.


Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi, wuta na basonge minei ya lola, nakopanza bango na mokili mobimba mpe akozala na ekolo moko te oyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima.


Ndenge ndako ya bandeke etondaka na bandeke, ndenge wana mpe bandako na bango etonda na lokuta ; mpe ezali na nzela yango nde bakoma bazwi mpe bato na nguya.


Nakolisaki yo lokola nzete ya elanga. Bongo tango okolaki penza mpe oyaki monene, okomaki kitoko makasi koleka ; tolo na yo ebimisaki mabele, mpe bapwale na yo ekolaki. Kasi ozalaki na yo kaka bolumbu tango nyonso, ozalaki na bilamba te.


Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo.


Sima na kolendisama ya bokonzi na ye, mokili na ye ekobebisama mpe ekopanzana bipai na bipai ; bakitani na ye bakozwa lisusu bokonzi te mpe mokili yango ekozala lisusu na nguya te, pamba te bakobotola yango mpe bakokaba yango na bato mosusu.


Na suka ya tango oyo esakolamaki, ngai Nabukodonozori, natombolaki miso na ngai na likolo, mpe mayele na ngai ezongelaki ngai. Nasanzolaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo, napesaki lokumu mpe nkembo epai na Ye oyo azali na bomoi tango nyonso : Bokonzi na Ye ezali na suka te, ewumelaka seko na seko.


Kasi tango kaka motema na ye ekomaki na lofundu mpe na lolendo, akitisamaki wuta na kiti na ye ya bokonzi mpe babotolaki ye nkembo na ye.


Daniele alobaki : Na emoniseli oyo nazwaki na butu, namonaki mipepe minei kowuta na likolo mpe eningisaki ebale monene.


Sima na yango, nakobaki kotala mpe namonaki nyama mosusu : ezalaki lokola nkoyi, mpe mokongo na yango ezalaki na mapapu minei lokola mapapu ya ndeke. Nyama yango ezalaki na mito minei, bongo bapesaki yango bokonzi ya kokamba.


Tango liseke yango ebukanaki, maseke minei ebimaki na esika na yango : ezali kolakisa ete babokonzi minei ekobima wuta na ekolo oyo, kasi nguya na yango ekokokana te.


Wana nazalaki kokanisa na tina na yango, ntaba moko ya mobali eyaki wuta na ngambo ya weste ; ezalaki kotambola mabele mobimba na kozanga konyata yango. Ntaba yango ya mobali ezalaki na liseke moko ya monene na kati-kati ya miso na yango ;


Namonaki ntaba yango kopusana pene ya meme ya mobali na kanda makasi, ebetaki meme ya mobali mpe ebukaki yango maseke nyonso mibale ; meme ezalaki ata na makasi te ya kobundisa ntaba. Boye, ntaba ebwakaki meme na mabele mpe enyataki yango ; mpe ezalaki na moto moko te mpo na kobikisa meme ya mobali na maboko ya ntaba wana.


Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.


Akotinda ba-anjelu na Ye mpe akosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili, longwa na suka ya mabele kino na suka ya Likolo.


Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai.


Sima na makambo wana, namonaki ba-anjelu minei batelemi na basonge nyonso minei ya mokili, bazali kokanga mipepe nyonso minei ya mokili mpo ete mopepe ata moke te epepa na mokili to na ebale monene to mpe na banzete.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ