Daniele 8:4 - Mokanda na Bomoi4 Bongo, namonaki meme ya mobali ezali kobeta na ngambo ya weste, ya nor mpe na sude. Nyama moko te ekokaki kobundisa yango mpe moto moko te akokaki kokangola soki ekangi yango. Ezalaki kosala nyonso oyo yango elingi mpe ezalaki kokola. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpo na lokumu oyo apesaki ye, bato ya bikolo, ya mikili mpe ya nkota nyonso bakomaki kolenga na somo liboso na ye. Mokonzi azalaki koboma bato oyo azalaki na posa ya koboma, kobikisa bato oyo azalaki na posa ya kobikisa, kotombola bato oyo azalaki na posa ya kotombola mpe kosambwisa bato oyo azalaki na posa ya kosambwisa.
Namonaki ntaba yango kopusana pene ya meme ya mobali na kanda makasi, ebetaki meme ya mobali mpe ebukaki yango maseke nyonso mibale ; meme ezalaki ata na makasi te ya kobundisa ntaba. Boye, ntaba ebwakaki meme na mabele mpe enyataki yango ; mpe ezalaki na moto moko te mpo na kobikisa meme ya mobali na maboko ya ntaba wana.