Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 8:27 - Mokanda na Bomoi

27 Ngai, Daniele, nalembaki penza nzoto mpe nabelaki mikolo ebele. Sima na yango, natelemaki mpe nazongelaki kolandela misala ya mokonzi. Emoniseli oyo nazwaki ekamwisaki ngai mpe nazalaki kososola yango te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 8:27
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki bibebu na ngai, mpe nakokaki lisusu kofungola monoko na ngai mpo na koloba. Nalobaki na ekelamu oyo etelemaki liboso na ngai : — Nkolo na ngai, molimo na ngai etungisami likolo ya emoniseli oyo nasili kozwa, mpe, ngai moto, nalembi nzoto !


Boye, natikalaki kaka ngai moko mpe nakomaki kotala emoniseli monene yango ; makasi esilaki ngai, elongi na ngai ebebaki makasi mpe nalembaki nzoto.


nzete yango ezali yo, mokonzi ! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata ; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele.


Nayoki na tina na yo ete ozali na molimo ya banzambe kati na yo, mpe ete ozali na bososoli, na mayele mpe na bwanya ya kokamwa !


Lisolo ya ndoto na ngai esuki awa. Ngai, Daniele, namitungisaki mingi kati na motema na ngai, elongi na ngai ebebaki na somo mpe nabombaki makambo oyo kati na motema na ngai.


Lokola azalaki kopusana pene ya esika oyo nazalaki, nakomaki na somo mpe nakweyaki elongi kino na mabele. Alobaki na ngai : — Mwana na moto, sosola malamu ete emoniseli oyo etali makambo ya suka ya tango.


Kati na emoniseli yango, nazalaki kotala mpe namimonaki lokola kati na Size, engumba batonga makasi, kati na etuka ya Elami ; kati na emoniseli yango kaka, namimonaki lisusu lokola natelemi pembeni ya moluka Ulayi.


Namonaki ntaba yango kopusana pene ya meme ya mobali na kanda makasi, ebetaki meme ya mobali mpe ebukaki yango maseke nyonso mibale ; meme ezalaki ata na makasi te ya kobundisa ntaba. Boye, ntaba ebwakaki meme na mabele mpe enyataki yango ; mpe ezalaki na moto moko te mpo na kobikisa meme ya mobali na maboko ya ntaba wana.


Tango nayokaki sango oyo, motema na ngai ekomaki kobeta makasi, bibebu na ngai ekomaki kolenga, mikuwa na ngai ekomaki kopola mpe makolo na ngai ekomaki kolenga. Kasi nakokanga motema na ngai mpo na kozela mokolo ya pasi oyo ekokomela ekolo oyo ebundisaki biso.


Samuele alalaki kino na tongo. Bongo sima na ye kolamuka, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe. Azalaki kobanga koyebisa Eli emoniseli oyo azwaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ