Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 8:26 - Mokanda na Bomoi

26 Emoniseli ya bapokwa mpe ya batongo oyo epesamelaki yo ezali ya solo, kasi bomba yango malamu, pamba te etali makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 8:26
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakosangisa bango elongo kati na libulu ndenge basangisaka bakangami na boloko, bakokangela bango na boloko mpe bakozwa etumbu sima na mikolo ebele.


« Mwana na moto, libota ya Isalaele bazali koloba : ‹ Emoniseli ya moto oyo ekosalema na yango lobi te mpe masakoli na ye ekokokisama sima na mibu ebele penza. ›


Na mobu ya misato ya bokonzi ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Nzambe alakisaki makambo epai ya Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari. Makambo yango ezalaki ya solo : etalisaki pasi makasi oyo ekoya. Daniele azwaki mayele ya kososola yango kati na emoniseli.


Sik’oyo, nayei kolimbolela yo makambo oyo ekokomela bato na yo na mikolo ekoya, pamba te emoniseli oyo ezali kolobela lisusu makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.


Sik’oyo, nakoloba na yo solo ya likambo : « Bakonzi misato bakobima lisusu mpo na Persi ; bongo mokonzi ya minei akobima lisusu, kasi akoleka bakonzi nyonso oyo bayaki liboso na ye na bomengo. Tango bomengo na ye ekopesa ye nguya, akosala ete bato nyonso batombokela Grese.


Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »


Azongisaki : — Daniele, kende na yo, pamba te maloba oyo ezali sekele, mpe buku na yango ekangama kino na tango ya suka.


Mpe tango kaka bakake sambo etikaki kobeta, namibongisaki mpo na kokoma ; kasi mongongo moko elobaki na ngai wuta na Lola : « Batela malamu makambo oyo bakake sambo ewuti koloba, kokoma yango te. »


Bongo alobaki na ngai lisusu : « Kobomba te maloba ya masakoli ya buku oyo, pamba te tango ekomi pene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ