Daniele 8:23 - Mokanda na Bomoi23 Na suka ya bokonzi na yango, tango batomboki bakokolisa mabe na bango kino na suka, mokonzi moko ya motema makasi mpe ya mayele mabe akobima ; အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na mikolo ekoya, okobengama mpo na kobunda ; na mibu oyo ekoya, okokende kobundisa mokili oyo bavandi na yango, sima na bango kobika na mopanga, basangisaki bango kati na bikolo ebele, na likolo ya bangomba ya Isalaele, oyo ekufa mpe etikala lisusu na bato te wuta kala. Bakobima wuta na bikolo mosusu mpe bakovanda na kimia.
Na tango ya kimia, akokota na makasi kati na bituka oyo etonda na bomengo mpe akokokisa makambo oyo ata moko te kati na batata to bakoko na ye batikala kosala : akobotola na makasi biloko mpe bomengo ya mokili, bongo akokabola yango epai na bato na ye ; akosala mabongisi ya kobundisa bingumba batonga makasi, kasi nyonso wana kaka ekowumela tango moke.
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.