Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 8:22 - Mokanda na Bomoi

22 Tango liseke yango ebukanaki, maseke minei ebimaki na esika na yango : ezali kolakisa ete babokonzi minei ekobima wuta na ekolo oyo, kasi nguya na yango ekokokana te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 8:22
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na kolendisama ya bokonzi na ye, mokili na ye ekobebisama mpe ekopanzana bipai na bipai ; bakitani na ye bakozwa lisusu bokonzi te mpe mokili yango ekozala lisusu na nguya te, pamba te bakobotola yango mpe bakokaba yango na bato mosusu.


Sima na yango, nakobaki kotala mpe namonaki nyama mosusu : ezalaki lokola nkoyi, mpe mokongo na yango ezalaki na mapapu minei lokola mapapu ya ndeke. Nyama yango ezalaki na mito minei, bongo bapesaki yango bokonzi ya kokamba.


Sima na yango, kati na emoniseli na ngai ya butu, namonaki nyama ya minei : ezalaki somo, ezalaki kobangisa mpe ezalaki na nguya makasi penza. Ezalaki na minu minene ya bibende ; ezalaki kolia, kopanzapanza mpe konyata misuni oyo ezalaki kotikala ; ekesenaki makasi na banyama nyonso ya liboso mpe ezalaki na maseke zomi.


Ntaba mobali ya bapwale ebele ezali mokonzi ya Grese, mpe liseke monene oyo ezali na kati-kati ya miso na yango ezali mokonzi ya liboso.


Na suka ya bokonzi na yango, tango batomboki bakokolisa mabe na bango kino na suka, mokonzi moko ya motema makasi mpe ya mayele mabe akobima ;


Natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki, liboso na ngai, meme moko ya mobali etelemi pembeni ya moluka ; ezalaki na maseke mibale ya milayi makasi, kasi moko kati na maseke yango, oyo ebotaki sima, elekaki mosusu na molayi.


Ntaba ya mobali ekolaki makasi ; kasi tango ekomaki lisusu na nguya makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki. Maseke minei ya minene ebotaki na esika ya liseke wana moko mpe etalaki na bangambo minei ya likolo.


Tango natalaki lisusu, namonaki bashar minei liboso na ngai : ezali kobima na kati-kati ya bangomba mibale ya bronze.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ