Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 8:16 - Mokanda na Bomoi

16 Nayokaki mongongo moko lokola ya moto wuta na kati-kati ya moluka Ulayi ; ezalaki kobelela : — Gabrieli, limbolela moto oyo emoniseli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 8:16
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, nayei kolimbolela yo makambo oyo ekokomela bato na yo na mikolo ekoya, pamba te emoniseli oyo ezali kolobela lisusu makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.


kasi liboso na nyonso, nakoyebisa yo makambo oyo ekomami kati na buku ya solo. Moto moko te asungaka ngai liboso na bango ; kaka Misheli, mokambi na bino.


Napusanaki pene ya moko kati na ba-oyo batelemaki wana, natunaki ye ndimbola ya solo ya makambo oyo namonaki. Ayanolaki ngai mpe apesaki ngai ndimbola ya makambo wana nyonso :


Kati na emoniseli yango, nazalaki kotala mpe namimonaki lokola kati na Size, engumba batonga makasi, kati na etuka ya Elami ; kati na emoniseli yango kaka, namimonaki lisusu lokola natelemi pembeni ya moluka Ulayi.


Natunaki : — Nkolo na ngai, bampunda oyo elingi kolakisa nini ? Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki : — Nakolakisa yo tina na yango.


Natunaki : — Bato oyo bayei kosala nini ? Azongisaki : — Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango.


Anjelu azongiselaki ye : — Nazali Gabrieli ; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu.


Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti. »


Bongo mongongo moko elobaki na ye : — Petelo, telema. Boma mpe lia.


Bato oyo bazalaki kokende mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba ; bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te.


Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.


Nalukaki kobaluka mpo na koluka koyeba nani oyo azali koloba na ngai. Mpe tango nabalukaki, namonaki bitelemiselo sambo ya minda, basala na wolo.


Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ