Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 8:14 - Mokanda na Bomoi

14 Alobaki na ngai : — Ekosalema bapokwa nkoto moko na nkama moko na tuku mitano mpe batongo nkoto moko na nkama moko na tuku mitano ; sima na yango nde Esika ya bule ekobulisama lisusu mpo na losambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 8:14
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko.


Siona ekosikolama na nzela ya boyengebene, mpe bato na yango oyo bakobongola mitema bakobika na nzela ya bosembo.


Ezali kati na Yawe nde bato nyonso oyo bazali bakitani ya Isalaele bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa lokumu.


Wuta tango oyo bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo kino tango oyo bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi, ekoleka mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku libwa.


Tika ete apambolama ye oyo azali kozela kino na suka ya mokolo ya nkoto moko na nkama misato na tuku misato na mitano.


Moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale atombolaki loboko na ye ya mobali mpe loboko na ye ya mwasi na likolo, mpe nayokaki ye kolapa ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko : — Ekozala mibu misato na ndambo. Tango nguya ya ekolo ya bule ekosila, makambo oyo nyonso ekokokisama.


akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.


Emoniseli ya bapokwa mpe ya batongo oyo epesamelaki yo ezali ya solo, kasi bomba yango malamu, pamba te etali makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.


Makomi esilaki kobongisa ete Nzambe akokomisa Bapagano sembo na nzela ya kondima, mpe etatolaki Sango Malamu oyo epai ya Abrayami : « Bato ya bikolo nyonso bakopambolama mpo na yo. »


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


Kasi mapapu nyonso mibale ya mpongo moko ya monene epesamaki na mwasi yango mpo ete apumbwa kino na esika na ye, na esobe epai wapi asengeli kosungama, mosika ya nyoka, mpo na tango moko, mpo na batango, mpe mpo na ndambo ya tango.


Nyama epesamelaki monoko mpo na kobimisa maloba ya lolendo mpe ya kofinga Nzambe ; epesamelaki nzela ya kosalela bokonzi na yango basanza tuku minei na mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ