Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 Sima na yango, kati na emoniseli na ngai ya butu, namonaki nyama ya minei : ezalaki somo, ezalaki kobangisa mpe ezalaki na nguya makasi penza. Ezalaki na minu minene ya bibende ; ezalaki kolia, kopanzapanza mpe konyata misuni oyo ezalaki kotikala ; ekesenaki makasi na banyama nyonso ya liboso mpe ezalaki na maseke zomi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 7:7
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nanikaka bango lokola putulu ya mabele, nafinaka bango, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.


Makasi na yango evandi na kingo na yango, mpe somo ebimaka liboso na yango.


Na nzela ya bimoniseli, Nzambe amemaki ngai kati na Isalaele mpe atiaki ngai na likolo ya ngomba moko ya molayi makasi ; mpe na likolo ya ngomba yango, na ngambo ya sude, ezalaki na bandako batonga lokola engumba.


Bongo na butu, Daniele azwaki emoniseli oyo elakisaki ye mabombami yango ; boye, akumisaki Nzambe ya Lola.


Kati na bimoniseli na ngai ya butu, namonaki moto moko lokola Mwana na Moto koya elongo na mapata ya likolo ; apusanaki pene ya Mpaka oyo azala liboso ya tango, mpe bamemaki ye liboso na Ye.


Daniele alobaki : Na emoniseli oyo nazwaki na butu, namonaki mipepe minei kowuta na likolo mpe eningisaki ebale monene.


Ekolaki lisusu kino na mampinga ya likolo, ebwakaki na mabele ndambo ya mampinga yango mpe ndambo ya minzoto, mpe enyataki yango.


Tango liseke yango ebukanaki, maseke minei ebimaki na esika na yango : ezali kolakisa ete babokonzi minei ekobima wuta na ekolo oyo, kasi nguya na yango ekokokana te.


Bongo natombolaki miso mpe namonaki maseke minei liboso na ngai.


Sima na yango, elembo mosusu emonanaki na likolo, ezalaki dalagona moko ya monene mpe ya motane. Dalagona yango ezalaki na mito sambo mpe maseke zomi ; mpe na mito wana sambo, moko na moko ezalaki na motole.


Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango ; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe.


Maseke zomi oyo omonaki ezali bakonzi zomi oyo bazwi nanu bokonzi te, kasi bakozwa yango mpo na ngonga moko mpe bakosalela yango lisanga na nyama.


Bongo anjelu alobaki na ngai : « Mpo na nini ozali komitungisa ? Nakoyebisa yo mabombami ya mwasi wana mpe ya nyama oyo ememi ye, nyama oyo ezali na mito sambo mpe na maseke zomi.


Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ