Daniele 7:4 - Mokanda na Bomoi4 Nyama ya liboso ezalaki lokola nkosi mpe ezalaki na mapapu lokola mpongo. Wana nazalaki kotala, balongolaki yango mapapu, batombolaki yango longwa na mabele mpo ete etelema na makolo mibale lokola moto ; mpe bapesaki yango motema ya moto. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ?
« Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe.