Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 7:28 - Mokanda na Bomoi

28 Lisolo ya ndoto na ngai esuki awa. Ngai, Daniele, namitungisaki mingi kati na motema na ngai, elongi na ngai ebebaki na somo mpe nabombaki makambo oyo kati na motema na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 7:28
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango ayebisaki tata na ye ndenge ayebisaki bandeko na ye ya mibali, tata na ye agangelaki ye mpe alobaki : — Ndoto nini wana yo osili kolota ? Okanisi ete ngai, mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali, tokoya mpe tokogumbama na mabele liboso na yo ?


Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema.


Boye, ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki bibebu na ngai, mpe nakokaki lisusu kofungola monoko na ngai mpo na koloba. Nalobaki na ekelamu oyo etelemaki liboso na ngai : — Nkolo na ngai, molimo na ngai etungisami likolo ya emoniseli oyo nasili kozwa, mpe, ngai moto, nalembi nzoto !


Boye, natikalaki kaka ngai moko mpe nakomaki kotala emoniseli monene yango ; makasi esilaki ngai, elongi na ngai ebebaki makasi mpe nalembaki nzoto.


Bakonzi oyo mibale, na mitema na bango ya mabe, bakovanda esika moko. Lokola batonda na mayele mabe, bakolobana lokuta kasi ekosimba te, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.


Mpo na yo, yika mpiko kino na suka ; okopema mpe, na mokolo ya suka, okosekwa mpo na kozwa litomba na yo.


Azongisaki : — Daniele, kende na yo, pamba te maloba oyo ezali sekele, mpe buku na yango ekangama kino na tango ya suka.


Bongo Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari atungisamaki makasi na mwa tango, mpe makanisi na ye ekomaki kobangisa ye. Mokonzi alobaki na ye : — Belitsatsari, tika ete ndoto oyo mpe ndimbola na yango ebangisa yo te !


nzete yango ezali yo, mokonzi ! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata ; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele.


elongi na ye etelaki na somo mpe makanisi na ye ekomaki kotambola, nzoto na ye mobimba ekomaki kolenga mpe mabolongo na ye ekomaki kotutana.


Ngai, Daniele, namitungisaki makasi ; mpe bimoniseli oyo eyaki na makanisi na ngai ebangisaki ngai makasi.


Na mobu ya misato ya bokonzi ya mokonzi Balitazari, ngai, Daniele, nazwaki emoniseli moko ya sika, sima na oyo nazwaki liboso.


Lokola azalaki kopusana pene ya esika oyo nazalaki, nakomaki na somo mpe nakweyaki elongi kino na mabele. Alobaki na ngai : — Mwana na moto, sosola malamu ete emoniseli oyo etali makambo ya suka ya tango.


Bongo, alobaki na ngai : — Nakoyebisa yo makambo oyo ekosalema na sima na tango ya kanda ya Nzambe, pamba te emoniseli oyo etali tango oyo ekatama mpo na mikolo ya suka.


Ngai, Daniele, nalembaki penza nzoto mpe nabelaki mikolo ebele. Sima na yango, natelemaki mpe nazongelaki kolandela misala ya mokonzi. Emoniseli oyo nazwaki ekamwisaki ngai mpe nazalaki kososola yango te.


Tango kaka bato yango bamonaki Yesu, bakamwaki mingi mpe bapotaki mbangu mpo na kokutana na Ye mpe kopesa Ye mbote.


Kasi Mari azalaki kobomba maloba wana nyonso mpe kokanisa na tina na yango mbala na mbala.


Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye ; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye.


— Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ