Daniele 7:23 - Mokanda na Bomoi23 Moto oyo natunaki ndimbola ya ndoto alobaki na ngai : — Nyama oyo ya minei ezali mokonzi ya minei oyo akobima na mabele. Akokesana makasi na babokonzi wana nyonso : akoboma mokili mobimba, akonyata mpe akopanza-panza yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na yango, kati na emoniseli na ngai ya butu, namonaki nyama ya minei : ezalaki somo, ezalaki kobangisa mpe ezalaki na nguya makasi penza. Ezalaki na minu minene ya bibende ; ezalaki kolia, kopanzapanza mpe konyata misuni oyo ezalaki kotikala ; ekesenaki makasi na banyama nyonso ya liboso mpe ezalaki na maseke zomi.