Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 7:2 - Mokanda na Bomoi

2 Daniele alobaki : Na emoniseli oyo nazwaki na butu, namonaki mipepe minei kowuta na likolo mpe eningisaki ebale monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 7:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mawa na ebele ya bato ! Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene ! Bato ya bikolo bazali koganga lokola lokito ya mayi ya ebale monene !


Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi, wuta na basonge minei ya lola, nakopanza bango na mokili mobimba mpe akozala na ekolo moko te oyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima.


Ebale monene ekozindisa Babiloni, makelele ya bambonge na yango ekozipa mokili ya Babiloni.


Sima na kolendisama ya bokonzi na ye, mokili na ye ekobebisama mpe ekopanzana bipai na bipai ; bakitani na ye bakozwa lisusu bokonzi te mpe mokili yango ekozala lisusu na nguya te, pamba te bakobotola yango mpe bakokaba yango na bato mosusu.


Bongo na butu, Daniele azwaki emoniseli oyo elakisaki ye mabombami yango ; boye, akumisaki Nzambe ya Lola.


Kati na bimoniseli na ngai ya butu, namonaki moto moko lokola Mwana na Moto koya elongo na mapata ya likolo ; apusanaki pene ya Mpaka oyo azala liboso ya tango, mpe bamemaki ye liboso na Ye.


Sima na yango, kati na emoniseli na ngai ya butu, namonaki nyama ya minei : ezalaki somo, ezalaki kobangisa mpe ezalaki na nguya makasi penza. Ezalaki na minu minene ya bibende ; ezalaki kolia, kopanzapanza mpe konyata misuni oyo ezalaki kotikala ; ekesenaki makasi na banyama nyonso ya liboso mpe ezalaki na maseke zomi.


Kati na emoniseli yango, nazalaki kotala mpe namimonaki lokola kati na Size, engumba batonga makasi, kati na etuka ya Elami ; kati na emoniseli yango kaka, namimonaki lisusu lokola natelemi pembeni ya moluka Ulayi.


Ntaba ya mobali ekolaki makasi ; kasi tango ekomaki lisusu na nguya makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki. Maseke minei ya minene ebotaki na esika ya liseke wana moko mpe etalaki na bangambo minei ya likolo.


Azongiselaki ngai : — Ezali Molimo ya likolo oyo akokende na bangambo nyonso minei ya mokili mobimba. Atelemaki liboso ya Nkolo ya mokili mobimba mpe sik’oyo abimi.


Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.


Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota.


Sima na makambo wana, namonaki ba-anjelu minei batelemi na basonge nyonso minei ya mokili, bazali kokanga mipepe nyonso minei ya mokili mpo ete mopepe ata moke te epepa na mokili to na ebale monene to mpe na banzete.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ