Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 7:18 - Mokanda na Bomoi

18 kasi basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo bakozwa bokonzi mpe bakobatela yango mpo na libela, seko na seko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 7:18
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bamemi bango na nsayi mpe na esengo ; bakoti na ndako ya mokonzi.


Yango nde suka ya bato oyo batiaka elikya kati na bango moko, ya bato oyo balandaka bango mpe basepelaka na maloba na bango.


Bato ya bikolo bakozwa bango mpe bakomema bango kino na esika na bango. Bongo, libota ya Isalaele ekokamata bango na mokili ya Yawe lokola basali ya mibali mpe ya basi. Bakokomisa bakangami bato oyo bakangaki bango mpe bakokonza bato oyo bakonzaki bango.


Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.


— Banyama nyonso minei wana ya minene ezali kolakisa bakonzi minei oyo bakobima na mabele ;


kino tango Mpaka oyo azala liboso ya tango ayaki kobundela basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, mpe kino tango ya kozwa bokonzi ekokoka mpo na bango.


akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.


Kasi bokonzi, nguya mpe lokumu ya bikolo oyo ezali na se ya moyi ekopesama na ekolo ya basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Bokonzi ya ekolo yango ekowumela seko na seko, mpe bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili bakosalela mpe bakotosa ekolo yango.


Kasi bato oyo bakobika bakokimela na ngomba Siona ; ngomba yango ekokoma lisusu bule, mpe bato ya Jakobi bakozongela lisusu libula na bango.


Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te.


Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili ? Bongo soki bosengeli kosambisa mokili, bozangi penza makoki ya kokata mwa makambo ya mike-mike ?


Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.


Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.


Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.


Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.


Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi.


Okomisaki bango ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo Nzambe na biso, mpe bakokonza mokili. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ