Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 7:17 - Mokanda na Bomoi

17 — Banyama nyonso minei wana ya minene ezali kolakisa bakonzi minei oyo bakobima na mabele ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 7:17
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !


Napusanaki pene ya moko kati na ba-oyo batelemaki wana, natunaki ye ndimbola ya solo ya makambo oyo namonaki. Ayanolaki ngai mpe apesaki ngai ndimbola ya makambo wana nyonso :


kasi basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo bakozwa bokonzi mpe bakobatela yango mpo na libela, seko na seko.


Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.


Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango ; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe.


Bongo namonaki nyama mosusu kobima longwa na mabele. Ezalaki na maseke mibale lokola maseke ya mpate, mpe ezalaki koloba lokola dalagona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ