10 Ebale ya moto ezalaki kobima mpe kotambola liboso na Ye. Minkoko ya bato bazalaki kosalela Ye, minkoko ya minkoko ya bato batelemaki liboso na Ye. Basambisi bavandaki, mpe babuku efungwamaki.
Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Mishe alobaki : — Solo, boyoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai, namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Tala, wuta mosika, Kombo ya Yawe ezali koya ; kanda na Ye ezali kopela lokola moto elongo na lipata ya molinga ya moto makasi ; bibebu na Ye etondi na kanda, mpe lolemo na Ye ezali lokola moto oyo ebomaka.
Na tango wana, Misheli, mokambi monene ya ba-anjelu, oyo abatelaka bato na yo akotelema. Ekozala tango ya pasi penza, pasi oyo etikala nanu kozala te wuta bikolo ezala na mokili kino na tango wana. Kasi na tango wana, bato ya ekolo na yo, oyo bakombo na bango ekomonana kati na buku, bakobika.
Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali ; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso.
Alobaki : « Yawe awutaki na Sinai ; wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.
Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi ; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela,
Bikolo etombokaki, mpe kanda na Yo epelaki. Tango ekoki mpo na kosambisa bakufi, mpe mpo na kofuta basali na Yo, basakoli, mpe basantu oyo batosaka Kombo na Yo, ezala bato minene to bato pamba ; mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili. »
Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto ; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka,