Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 6:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bakalaka ya lokumu, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bapesi toli mpe bayangeli, bango nyonso bandimaki ete mokonzi azwa mokano moko mpe abetela yango sete : « Na mikolo tuku misato oyo ezali koya, moto nyonso asengeli kosambela kaka mokonzi ; moto oyo akomeka kosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 6:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te ; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi : Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi ; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye.


Boye, na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya liboso, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi ; mpe na mitindo ya Amani, bakomaki mitindo nyonso ya Amani epai ya bakalaka ya lokumu ya mokonzi, epai ya bayangeli ya etuka moko na moko mpe epai ya bakalaka ya ekolo moko na moko, kolanda lolenge ya kokoma ya etuka moko na moko mpe lokota ya ekolo moko na moko. Bakomaki yango na kombo ya mokonzi Kizerisesi mpe babetaki yango kashe ya mokonzi.


Maridoshe akomaki mikanda na kombo ya mokonzi Kizerisesi, abetaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango na nzela ya bantoma oyo batambolaka na bampunda ya mbangu, oyo etiama mpo na misala ya mokonzi.


Ester alobaki lisusu na mokonzi ; amibwakaki na makolo na ye mpe abondelaki ye na kolela ete asukisa mikano mabe ya Amani, moto ya Agagi, mpe mabongisi na ye ya koboma Bayuda.


Sik’oyo, koma mobeko mosusu na tina na Bayuda, na kombo ya mokonzi, ndenge okomona malamu mpe beta yango kashe ya mokonzi ; pamba te mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi mpe babeti yango kashe na ye ekoki kobongwana te.


Bato mabe basanganaka mpo na kobundisa bomoi ya moto ya sembo mpe kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya kufa.


Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato !


Parsin  : bokonzi na yo ekabwani mpe epesami epai ya bato ya Medi mpe ya Persi.


Bongo, bato yango bakendeki lisanga mpe bakutaki Daniele azali kobondela mpe kosenga lisungi epai ya Nzambe na ye.


Tango mokonzi ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema ; boye azwaki mokano ya kokangola Daniele ; mpe kino na pokwa, azalaki kaka koluka ndenge nini kobikisa ye.


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ