7 Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bakendeki lisanga epai ya mokonzi mpe balobaki : — Tika ete mokonzi Dariusi awumela na bomoi seko na seko !
Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.
Kino tango nini bokosangela moto moko ? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya ?
Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na lokota ya bato ya Arami : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi seko na seko ! Yebisa ndoto na yo epai ya basali na yo, mpe tokolimbola yango.
Bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli mpe bapesi toli ya mokonzi bazingelaki bango ; mpe bamonaki ete moto ezikisaki te ezala banzoto na bango, suki ya mito na bango to bilamba na bango, mpe batikalaki koyoka bango ata solo ya moto te.
Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye : — Mokonzi, kobosana te ete mobeko ya bato ya Medi mpe ya Persi elobi ete mokano moko te to mobeko moko te ya mokonzi ekoki kobongolama.
Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »
Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi ezalaki kobokola bana na yango ? Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi elongo na bana na yango ezalaki kotambola na somo ata moke te ?
Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.