Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 6:2 - Mokanda na Bomoi

2 Dariusi amonaki ete ezali malamu kotia bayangeli nkama moko na tuku mibale mpo na kokamba mokili mobimba ya bokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 6:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosala keba ete bozwa likambo oyo na pete te. Mpo na nini kotika nzela ete mobulu oyo ekola mpe ekitisa bomengo ya mokonzi ? »


Pamba te ngai mpe bato na ngai, tosili kotekama mpo ete babebisa biso, baboma biso mpe balimwisa biso ! Soki ata batekaki biso mpo ete tozala bawumbu ya basi to ya mibali, nalingaki na ngai kovanda kimia ; pamba te pasi ata moko te ya lolenge oyo ekokaki kotinda ngai ete natungisa mokonzi !


Moto oyo atindaka sango na nzela ya zoba azali lokola moto oyo amikati makolo mpe amilukeli makambo.


Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi ; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo.


Nzokande, nayoki ete yo ozali na makoki ya kolimbola mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi ; sik’oyo, soki olongi kotanga makomi oyo mpe opesi ngai ndimbola na yango, nakolatisa yo bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe okokoma moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya mokili na ngai ya bokonzi.


Mbala moko, Balitazari apesaki mitindo ete balatisa Daniele bilamba ya motane, sheneti ya wolo na kingo mpe batatola na tina na ye ete akomi moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya bokonzi.


Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni : — Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi.


Dariusi, moto ya Medi, akomaki mokonzi tango akokisaki mibu tuku motoba na mibale ya mbotama.


Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kobongisa elongo na basali na ye makambo na ye ya misolo.


Mozwi abengaki ye mpo na kotuna ye : « Makambo nini nazali koyoka na tina na yo ? Yebisa ngai ndenge nini obateli bomengo na ngai ; pamba te, kobanda lelo, okozala lisusu mobateli bomengo na ngai te. »


Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ