Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 6:11 - Mokanda na Bomoi

11 Tango Daniele asosolaki ete sango ya mokano yango esili kopanzana, akotaki na ndako na ye, amataki na etaje mpe akotaki na shambre oyo maninisa na yango etala na ngambo ya Yelusalemi ; mbala misato na mokolo, azalaki kofukama mpo na kosambela mpe kopesa matondi epai ya Nzambe na ye, ndenge kaka azalaki kosala liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 6:11
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

soki, wuta na mokili ya banguna na bango epai wapi bamemaki bango lokola bawumbu, basengi Yo bolimbisi na mitema mpe na milimo na bango mobimba ; soki basambeli Yo na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo ;


Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.


Nakumisaka Yo mbala sambo na mokolo mpo na mibeko ya bosembo na Yo.


Yoka ngai tango nabondelaka Yo mpo na kosenga lisungi, tango natombolaka maboko na ngai, na kotala na ngambo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Bino bato oyo bobiki na mopanga, bokima, bolekisa tango te ! Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi !


Boye, bato yango balobaki : — Tokotikala komona likambo ata moko te ya kofundela moto oyo, Daniele ; loba nde toluka yango kati na mobeko ya Nzambe na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ