9 Boye, mokonzi Balitazari akomaki lisusu na somo makasi koleka, mpe elongi na ye etelaki lisusu koleka ; mpe bato na ye ya lokumu bakomaki komitungisa.
Botuna mpe botala : Boni, mobali akoki kobota bana ? Bongo mpo na nini nazali komona moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa ?
Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba.