Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.
Makambo mibale oyo ekokomela yo mbala moko mpe kaka na mokolo moko : kozanga bana mpe kokufisa mobali. Makambo oyo eleka ndelo nde ekokomela yo, ata kindoki na yo ezali makasi mpe bakisi na yo ezali na nguya.
Daniele azongisaki liboso ya mokonzi : — Bato ya bwanya, bato ya mayele ya mabe, banganga-kisi mpe bato oyo bayebaka makambo oyo ekoya bazali na makoki te ya koyebisa mokonzi mabombami oyo azali kotuna ;
Nzete oyo omonaki, oyo ezalaki na makasa ya kitoko mpe bambuma ebele, oyo ezalaki kopesa bato nyonso bilei, oyo ezalaki kopesa pio na banyama ya zamba, oyo ezalaki kotikela bandeke ya likolo esika ya kotonga bazala na yango ;
Tala bimoniseli oyo namonaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai : « Nazalaki kotala, namonaki nzete moko ya monene etelema liboso na ngai, na kati-kati ya mabele, mpe ezalaki molayi makasi penza.