Daniele 5:7 - Mokanda na Bomoi7 Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni : — Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi ; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.
Ezali na moto moko kati na mokili na yo, oyo azali na molimo ya banzambe ya bule kati na ye. Tango tata na yo azalaki mokonzi, amonaki kati na ye bososoli, mayele mpe bwanya oyo ekokana na bwanya ya banzambe. Boye, tata na yo, mokonzi Nabukodonozori, akomisaki ye mokonzi ya banganga-kisi, ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.
Nzokande, nayoki ete yo ozali na makoki ya kolimbola mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi ; sik’oyo, soki olongi kotanga makomi oyo mpe opesi ngai ndimbola na yango, nakolatisa yo bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe okokoma moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya mokili na ngai ya bokonzi.
Moko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba : « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso ? Azali nde koya kotiola Isalaele ! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. »