Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 5:4 - Mokanda na Bomoi

4 Wana bazalaki komela vino, bazalaki kokumisa banzambe ya wolo mpe ya palata, ya bronze, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 5:4
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato oyo Adoniya abengisaki bayokaki bongo, batelemaki na kobanga mpe bakimaki moto na moto na nzela na ye.


Kasi bato oyo batiaka elikya na banzambe ya bikeko mpe balobaka na bililingi : « Bozali banzambe na biso, » bakozonga sima mpe bakosambwa.


Nazali Yawe ; yango nde Kombo na Ngai ; nakopesa nkembo na Ngai na mosusu te to lokumu na Ngai epai na banzambe ya bikeko te.


Daniele azwaki mokano ya koboya komikomisa mbindo na nzela ya bilei mpe ya vino ya mokonzi ; ayebisaki mokonzi ya bakalaka ya lokumu ete apesa ye nzela te ya komikomisa mbindo na lolenge wana.


Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.


Boye, bamemaki bakopo ya wolo oyo bazwaki na Tempelo ya Nzambe, na Yelusalemi ; bongo mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, basi na ye mpe bamakangu na ye bamelaki na yango masanga.


Mbala moko, misapi ya loboko ya moto moko ebimaki mpe ebandaki kokoma na etando ya mir ya ndako ya mokonzi, pembeni ya etelemiselo ya minda. Tango mokonzi amonaki ndenge loboko yango ezalaki kokoma,


Yango wana bokozala bato ya liboso mpo na kokende na bowumbu, mpe bafeti ya bato oyo bamivandisaka na bakiti ya kitoko ekosila.


Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete : « Telema ! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi : « Lamuka ! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela ? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango.


Yango wana, lokola tozali bana na Nzambe, tosengeli te kokanisa ete bonzambe ekokani na elilingi ya wolo, ya palata to ya libanga, lokola nzambe ya ekeko oyo esalemi na maboko mpe mayele ya moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ