Makambo mibale oyo ekokomela yo mbala moko mpe kaka na mokolo moko : kozanga bana mpe kokufisa mobali. Makambo oyo eleka ndelo nde ekokomela yo, ata kindoki na yo ezali makasi mpe bakisi na yo ezali na nguya.
Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino ; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.
Nakolangwisa masanga : bakalaka mpe bato na yango ya bwanya, bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko. Bakolala pongi ya libela mpe bakolamuka lisusu te, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Mokonzi ya mampinga.