Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 5:29 - Mokanda na Bomoi

29 Mbala moko, Balitazari apesaki mitindo ete balatisa Daniele bilamba ya motane, sheneti ya wolo na kingo mpe batatola na tina na ye ete akomi moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya bokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 5:29
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.


Moyuda Maridoshe azalaki moto ya mibale kati na bokonzi sima na mokonzi Kizerisesi. Maridoshe azalaki moto monene mpe ya lokumu na miso ya Bayuda, bandeko na ye ; pamba te azalaki koluka bolamu ya bato na ye mpe kobundela bolamu ya Bayuda nyonso.


Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo, mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.


Sima, mokonzi atombolaki Daniele na lokumu oyo eleki likolo mpe apesaki ye bakado mpe bozwi ebele ; akomisaki ye moyangeli ya etuka mobimba ya Babiloni mpe mokambi ya bato na yango nyonso ya bwanya.


Nzokande, nayoki ete yo ozali na makoki ya kolimbola mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi ; sik’oyo, soki olongi kotanga makomi oyo mpe opesi ngai ndimbola na yango, nakolatisa yo bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe okokoma moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya mokili na ngai ya bokonzi.


Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni : — Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi.


Dariusi amonaki ete ezali malamu kotia bayangeli nkama moko na tuku mibale mpo na kokamba mokili mobimba ya bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ