Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 5:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mpe yo Balitazari, mwana na ye ya mobali, atako oyebaki makambo wana nyonso, otamboli na komikitisa te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 5:22
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amoni amikitisaki te lokola Manase, tata na ye, liboso ya Yawe, kasi asalaki lisusu mabe koleka.


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki te liboso ya mosakoli Jeremi oyo azalaki koloba na Kombo na Yawe.


Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzi na kozanga koyoka soni.


Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.


Nakopesa etumbu na mokili mpo na mabe na yango, mpe bato mabe, mpo na masumu na bango. Nakosukisa lofundu ya bato ya lolendo mpe nakokitisa lolendo ya banyokoli.


Ozalaki komilobela kati na motema : ‹ Nakomata kino na Lola, nakotombola kiti na ngai ya bokonzi kino na likolo ya minzoto ya Nzambe mpe nakovanda na ngomba epai wapi banzambe basanganaka, na suka ya mokili ya ngambo ya nor ;


Soki basaleli moto mabe ngolu, akoyekola bosembo te ; ezala kati na mokili ya bosembo, asalaka kaka mabe mpe amonaka na ye monene ya Yawe te.


Oh mokonzi, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apesaki tata na yo, Nabukodonozori, bokonzi ; akomisaki ye moto monene mpe apesaki ye nkembo mpe lokumu.


pamba te Yoane azalaki koloba na ye : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. »


pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te ; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.


Mosali oyo ayebi posa ya nkolo na ye, kasi amilengeli te to asali te kolanda posa ya nkolo na ye, akobetama fimbu ebele.


Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.


Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.


Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ