Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 5:20 - Mokanda na Bomoi

20 Kasi tango kaka motema na ye ekomaki na lofundu mpe na lolendo, akitisamaki wuta na kiti na ye ya bokonzi mpe babotolaki ye nkembo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 5:20
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bayokaki te ; batiaki moto makasi lokola bakoko na bango, oyo baboyaki kondimela Yawe, Nzambe na bango.


Kasi mpo ete Ezekiasi akomaki na lolendo, atambolaki lisusu te na lolenge ya kondima bolamu ya Nzambe mpe ya kozongisela Ye matondi ; mpo na yango, Yawe asilikelaki ye, Yuda mpe Yelusalemi.


Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga.


Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele.


Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende,


Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.


Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.


Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe ; solo, akozanga te kozwa etumbu.


Kita mpe vanda na putulu, Babiloni, mboka kitoko ! Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, Babiloni, mboka kitoko ! Moto moko te akobenga yo lisusu « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. »


Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi : « Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi, pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. »


— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na engumba oyo mpe na mboka oyo ezali zingazinga na yango pasi nyonso oyo nasakolaki na tina na yango, pamba te batosaki Ngai te mpe bayokaki maloba na ngai te. »


Oh bato ya elenge mwasi Diboni, botika nkembo na bino mpe bovanda na esobe ; pamba te moto oyo akoya kobundisa Moabi akoya mpe kobundisa bino mpe kobebisa bingumba na bino oyo batonga makasi !


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Bikolo oyo esanganaki na Ejipito ekokweya mpe makasi oyo etielaka lolendo ekosila. Kobanda na Migidoli kino na Siene, bakokweya na mopanga elongo na Ejipito, elobi Nkolo Yawe.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ekomaki molayi penza, bongo songe na yango ekendeki kino na mapata ; mpe lokola ekomaki na lolendo mpo na molayi na yango,


Mokonzi akosala makambo oyo alingi, akokoma lolendo, akotombola mapeka liboso ya banzambe nyonso mpe akoloba makambo ezanga tina mpo na kotiola Nzambe ya banzambe ; akolonga kino tango kanda makasi ya Nzambe ekosila, pamba te makambo nyonso oyo ekatama esengeli kokokisama.


Sima na basanza zomi na mibale, wana mokonzi azalaki kotambola na veranda ya ndako ya bokonzi, na Babiloni,


Wana azalaki nanu komilobela, mongongo moko ewutaki na likolo, elobaki : — Tala makambo oyo ekatami mpo na yo, mokonzi Nabukodonozori : « Nguya ya bokonzi elongwe na maboko na yo.


Ntaba ya mobali ekolaki makasi ; kasi tango ekomaki lisusu na nguya makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki. Maseke minei ya minene ebotaki na esika ya liseke wana moko mpe etalaki na bangambo minei ya likolo.


Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.


kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga.


Tina nini kozala moto makasi lokola Faraon mpe bato ya Ejipito ? Bokanisa ete sima na Nzambe konyokola bango, batikaki bana ya Isalaele kokende na nzela na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ