Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 5:18 - Mokanda na Bomoi

18 Oh mokonzi, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apesaki tata na yo, Nabukodonozori, bokonzi ; akomisaki ye moto monene mpe apesaki ye nkembo mpe lokumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 5:18
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni ;


Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.


Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko, mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.


Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba, nakotatola misala minene na Yo nyonso.


Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.


nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.


Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi.


Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka ; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye.


tango babebisaka lokumu ya moto na miso ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo,


Boni, ezali te wuta na monoko ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde pasi mpe bolamu ekomelaka bato ?


nakabaki yango na maboko ya nkumu ya bikolo mpo ete apesa yango etumbu oyo ekoki na mabe na yango. Nabenganaki yango ;


Belitsatsari azongisaki : — Nkolo na ngai, tika ete ndoto oyo ezala mpo na bayini na yo, mpe ndimbola na yango, mpo na banguna na yo !


nzete yango ezali yo, mokonzi ! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata ; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele.


Mokolo moko, tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, nalotaki ndoto moko oyo ebangisaki ngai makasi ; bililingi mpe bimoniseli moko eyaki na makanisi na ngai mpe etungisaki molimo na ngai.


Bato nyonso ya mokili bazali pamba na miso na Ye ; asalaka makambo oyo alingi na mampinga nyonso ya likolo mpe na bavandi ya mabele. Moto moko te azali na makoki ya kozongisa loboko na Ye sima.


Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.


Babenganaki ye na molongo ya bato mpe bapesaki ye mayele ya banyama ; akomaki kovanda elongo na ba-ane ya zamba, kolia matiti lokola bangombe mpe nzoto na ye ezalaki kopola na mamwe ya tongo, kino tango asosolaki ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya bokonzi nyonso ya bato mpe atombolaka na bokonzi moto nyonso oyo Ye alingi.


Daniele azongiselaki ye : — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko !


Mokonzi, na ngonga ya midi, wana nazalaki kokende, namonaki pole moko kowuta na likolo, elekaki kutu ata kongenga ya moyi ; pole yango ezipaki ngai mpe bato oyo bazalaki kotambola elongo na ngai.


Boye, mokonzi Agripa, wuta tango wana, nandimaki kotosa emoniseli oyo ewutaki na Likolo.


Nzokande, Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka te kati na bandako oyo bato batonga, ndenge kaka mosakoli aloba :


Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ