Faraon alobaki na Jozefi : — Nalotaki ndoto mpe ata moto moko te alongi kolimbola yango ; kasi nayoki sango na tina na yo ete soki oyoki ndoto, okolimbola yango.
Atiaki lisusu bakalaka misato ya lokumu lokola bakonzi na bango ; Daniele azalaki moko kati na bakalaka yango ya lokumu. Bazalaki kokamba misala ya bayangeli ya bituka mpo ete mokonzi anyokwama te.