Daniele 5:13 - Mokanda na Bomoi13 Boye, bamemaki Daniele liboso ya mokonzi. Mokonzi atunaki ye : — Yo nde Daniele, moko kati na bawumbu oyo tata na ngai amemaki wuta na Yuda ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezali na moto moko kati na mokili na yo, oyo azali na molimo ya banzambe ya bule kati na ye. Tango tata na yo azalaki mokonzi, amonaki kati na ye bososoli, mayele mpe bwanya oyo ekokana na bwanya ya banzambe. Boye, tata na yo, mokonzi Nabukodonozori, akomisaki ye mokonzi ya banganga-kisi, ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.
Mbala moko, bakendeki epai ya mokonzi mpo na kosolola na ye na tina na mokano oyo azwaki : — Mokonzi, opanzaki sango te ya mokano oyo ozwaki, ete na mikolo tuku misato oyo ekolanda, moto nyonso asengeli kosambela kaka yo, mokonzi ; bongo moto oyo akosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi ? Mokonzi azongisaki : — Ezali penza bongo ! Mokano ezali ndenge kaka ekatamaki, kolanda mibeko ya bato ya Medi mpe ya Persi, oyo bakoki kobongola te.