Daniele 5:12 - Mokanda na Bomoi12 Pamba te moto yango, Daniele, oyo tata na yo azalaki kobenga Belitsatsari, atondisama na mayele, na boyebi mpe na bososoli ; azali lisusu na makoki ya kolimbola ndoto, masese mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi. Benga kaka Daniele wana, mpe akoyebisa yo ndimbola ya makomi yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, nayoki ete yo ozali na makoki ya kolimbola mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi ; sik’oyo, soki olongi kotanga makomi oyo mpe opesi ngai ndimbola na yango, nakolatisa yo bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe okokoma moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya mokili na ngai ya bokonzi.