Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 5:11 - Mokanda na Bomoi

11 Ezali na moto moko kati na mokili na yo, oyo azali na molimo ya banzambe ya bule kati na ye. Tango tata na yo azalaki mokonzi, amonaki kati na ye bososoli, mayele mpe bwanya oyo ekokana na bwanya ya banzambe. Boye, tata na yo, mokonzi Nabukodonozori, akomisaki ye mokonzi ya banganga-kisi, ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 5:11
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon atunaki bango : — Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye ?


Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! »


Boni, okanisi ete ozali na bwanya koleka Daniele ? Okanisi ete oyebi mabombami nyonso ?


Na bwanya mpe na mayele na yo, okomi na bozwi mpe otondisi wolo mpe palata kati na bibombelo na yo.


bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi ; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.


Makambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi makasi, moto moko te akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye ; ezali kaka banzambe nde bakoki kosala yango mpo ete bavandaka kati na bato te.


Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama, ayebaka makambo oyo esalemaka na molili, mpe pole ezali kati na Ye.


Nzete oyo omonaki, oyo ezalaki na makasa ya kitoko mpe bambuma ebele, oyo ezalaki kopesa bato nyonso bilei, oyo ezalaki kopesa pio na banyama ya zamba, oyo ezalaki kotikela bandeke ya likolo esika ya kotonga bazala na yango ;


Sima, Daniele ayaki liboso na ngai, mpe nayebisaki ye ndoto yango. Bazalaki kobenga ye Belitsatsari, kombo ya nzambe na ngai. Molimo ya banzambe ya bule ezalaki kati na ye.


Nalobaki : — Belitsatsari, mokonzi ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, nayebi ete molimo ya banzambe ya bule ezali kati na yo, mpe ete mabombami moko te ezali pasi na kolimbola mpo na yo. Yoka ndoto oyo nalotaki mpe pesa ngai ndimbola na yango.


Nayoki na tina na yo ete ozali na molimo ya banzambe kati na yo, mpe ete ozali na bososoli, na mayele mpe na bwanya ya kokamwa !


Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni : — Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi.


Bato bagangaki : — Tala yango oyo, mongongo ya nzambe ; ezali mongongo ya moto te !


Tango ebele ya bato bamonaki makambo oyo Polo asalaki, bagangaki na lokota ya bato ya Likawoni : — Banzambe bazwi banzoto ya bato mpe bakiteli biso !


Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ