1 Mokolo moko, mokonzi Balitazari asalisaki feti moko ya monene mpo na kopesa lokumu na nkoto ya bato na ye ya lokumu ; mpe amelaki vino elongo na bango.
Sima na mikolo misato, ezalaki mokolo ya mbotama ya Faraon. Faraon asalisaki feti monene mpe abengisaki bakalaka na ye nyonso. Abimisaki na boloko, liboso ya bakalaka na ye, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi mpe kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.
Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, asalisaki feti monene mpo na bato na ye nyonso ya lokumu : bakalaka na ye, bakonzi ya basoda ya mokili ya Persi mpe ya Medi, bankumu mpe bayangeli ya bituka.
Nakolangwisa masanga : bakalaka mpe bato na yango ya bwanya, bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko. Bakolala pongi ya libela mpe bakolamuka lisusu te, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Mokonzi ya mampinga.