Daniele 4:9 - Mokanda na Bomoi9 ezalaki na makasa kitoko mpe na bambuma ebele, mpe ezalaki kopesa bilei na moto nyonso. Banyama ya zamba ezalaki koya kozwa pio na se ya elili na yango ; bandeke ya likolo ezalaki kovanda na bitape na yango : ezalaki kopesa bilei na bikelamu nyonso ya bomoi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezali na moto moko kati na mokili na yo, oyo azali na molimo ya banzambe ya bule kati na ye. Tango tata na yo azalaki mokonzi, amonaki kati na ye bososoli, mayele mpe bwanya oyo ekokana na bwanya ya banzambe. Boye, tata na yo, mokonzi Nabukodonozori, akomisaki ye mokonzi ya banganga-kisi, ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.